Blessure d'amour

Blessure d'amour a song by Madilu System on Foxsoundi — Free Music, Smart Streaming for Everyone

Blessure d'amour by Madilu System

Blessure d'amour Lyrics

[00:10.81] Ye mei, Madilu Multi System
[00:18.17] Ah! Yo ndeko ya mwasi
[00:22.12] Oye ko beta nga kabakata ya likofi
[00:25.22] Po nako solola na mobali nayo
[00:27.54] Vraiment oyebi te que mobali na yo
[00:28.16] Ayali yaya na nga ya quartier ba salaka boye te
[00:32.18] Boni ko
[00:41.29] Na mesana na nga bitumba te, maman
[00:45.18] Boni oko kanela nga na sali yo nini eh
[00:48.72] Ngai ko na bundaka te, maman
[00:52.62] Banda na botama na sala na nga ata physique te oh
[00:55.68] Wapi nzoto ya bitumba, eh mwana oyo?
[00:59.58] Ba finga ba tonga na kipaka te oh
[01:03.00] Ngai ko na boya na nga bitumba oh, maman
[01:08.60] Na lobi rien
[01:11.16] Na mesana na nga ko swana te Je peux vomir
[01:14.13] Boni oko swanisa nga na se ya mbula
[01:17.96] Ba kake eko beta likolo Olingi obundisa ngai
[01:21.82] Po ozua bomengo, oh maman
[01:25.95] Kitoko ya mwasi na mokili ezali chance ya la vie te
[01:29.05] Mobali oko bundisa ngai azali vieux ya quartier
[01:33.58] Coco, nayebi te
[01:36.57] Lokola tozali na mokili oyo ya se
[01:39.06] Nanu to komi na paradiso te
[01:41.77] Soki okoki ko zua chance
[01:44.06] Ya ko zua mobali oyo ya yo moko
[01:47.22] Ah tika biyoka yoka
[01:52.31] Nazangi moyen
[01:55.55] Ko swana pe bitumba ezalaki likambo nde ya kala
[01:58.94] Nani alakiso habitude mabe boye, Coco?
[02:03.98] Na banga makofi di
[02:06.25] Nga na bundaka te eh, Coco eh
[02:09.79] Nga na swanaka te eh, Coco
[02:13.52] Nga na boya manzaka na elongi na ngai eh
[02:17.68] Nga na koma na ngai ko sambela Yezu
[02:21.53] Nga na koma ko banga mibali ya bato masumu
[02:24.88] Instrumental
[02:52.95] Eh, Coco
[02:54.83] Na moni eh
[02:56.27] Tokoma na biso ba changeur de monnaie
[02:58.87] Omonaka ndenge ba mère wana ba ngindaka te
[03:01.55] Vraiment na ba mbula oyo tokomi na yango
[03:04.86] To changaka lisusu mibali
[03:06.36] Ah pasi eh
[03:09.95] Maman oh, c'est vrai
[03:15.76] Soki na salaki yo mabe, olimbisa ngai eh
[03:23.32] Soki na bomela yo moto na famille
[03:26.49] Luka opardonner ngai oh
[03:31.33] Coco eh, (maman)
[03:32.75] Maman eh soki na salaki mabe, limbisa ngai eh
[03:38.34] Coco eh, (maman)
[03:40.38] Maman eh soki na salaki mabe, limbisa ngai eh
[03:45.73] Nayebi pota ya bolingo eleki pota ya lisasi
[03:49.22] Kasi okokaki Ko sambwisa nga boye te maman ah
[03:53.24] Coco eh, (maman)
[03:54.90] Maman eh soki na salaki mabe, limbisa ngai eh
[04:00.18] Coco eh maman eh
[04:02.87] Soki na salaki mabe, limbisa ngai eh
[04:07.62] Mobali oyo okoseli nga makambo Coco
[04:10.93] Nga nde moto na lakisaki yo Nzombo Faustino eh
[04:15.12] Coco eh, maman eh
[04:18.41] Soki na salaki mabe, limbisa ngai eh
[04:22.29] (C'est vrai) Coco eh, maman eh
[04:25.51] Soki na salaki mabe, limbisa ngai eh
[04:30.23] Na sengi yo bolimbisi mbala kama ondima ngai te
[04:33.57] Na tubeli masumu na nga epayi ya Abbe Jacques abeji
[04:38.25] Coco eh, maman eh
[04:40.42] Soki na salaki mabe, limbisa ngai eh
[04:44.83] Coco eh, maman eh
[04:48.08] Soki na salaki mabe limbisa ngai eh
[04:52.69] Coco eh, maman eh
[04:54.90] Soki na salaki mabe, limbisa ngai eh
[05:00.23] Vraiment ah Coco ndenge na yebisaki yo kaka
[05:05.06] Possibilite mosusu eza nango
[05:08.26] Tokota na biso na zando ya Gambela
[05:10.39] To tekaka bilamba na biso, na ba bijoux
[05:14.02] MPo soki to landi kaka mibali oyo mitu pasi
[05:19.18] Vraiment na mokili oyo ya se tozali
[05:21.49] Lokola to'a nano na misuni
[05:23.76] Nano tokomi na paradiso te
[05:25.13] Epayi toko zua molimo
[05:27.13] Po ozwa chance ozua mobali
[05:29.34] Aza obe na yomoko
[05:31.07] Sans que azanga ya pembeni
[05:33.15] Eza problème
[05:38.19]

From the album: Sans commentaire